#129A
Nazali mopaya
Coll. des Cantiques
Couplet 1
Nazali mopaya na mokili oyo, Mboka na ngai ‘a seko ezali na lola, Mokolo mosusu nakozonga na ngai, Nakokende na ngai seko.
Refrain
Namipesi na Yo Nkolo na ngai Yesu, Lisalisi na ngai euti epai na Yo, Miso na ngai nyonso ekotala se Yo. Yesu Mobikisi na ngai.
Couplet 2
Ntango na kotala nyonso na mokili, Na masumu nyonso bato bakosala, Elakisi solo mobembo ‘belemi, Mpo nakende na ngai lola.
Refrain
Namipesi na Yo Nkolo na ngai Yesu, Lisalisi na ngai euti epai na Yo, Miso na ngai nyonso ekotala se Yo. Yesu Mobikisi na ngai.
Couplet 3
Nakomipesa te, na mokili oyo, Nakolanda ata te moto na mokili, Namipesi na Yo, mobikisi na ngai, Kino ‘koya komema ngai.
Refrain
Namipesi na Yo Nkolo na ngai Yesu, Lisalisi na ngai euti epai na Yo, Miso na ngai nyonso ekotala se Yo. Yesu Mobikisi na ngai.
Couplet 4
Natambolaki solo, mokili oyo. Nalukaki nyonso, na mangomba nyonso, Nazuaki ata te akobikisa ngai, Bobele yo Nkolo Yesu.