Indirimbo Zikundwa Open in the app

#29

Nani akolanda?

Coll. des Cantiques

Couplet 1

Nani akolanda pe kotelema Na loboko ya mobali ya Yesu? Koyoka, kotosa mibeko na Ye, Nani akosalela Yesu lelo?

Refrain

Nani akolanda ka Nkolo Yesu? Koyanola ete nazali awa. Nani akolanda ka Nkolo Yesu? Aloba na Nkolo nazali awa.

Couplet 2

Nani akolanda ka Nkolo Yesu O mosala Naye nde ya bolingo? Komema bayike epayi na Ye, O maloba na Ye tomoni Nkolo?

Refrain

Nani akolanda ka Nkolo Yesu? Koyanola ete nazali awa. Nani akolanda ka Nkolo Yesu? Aloba na Nkolo nazali awa.